Upload
others
View
34
Download
0
Embed Size (px)
Citation preview
i
TBLIN1MonokoLingala
TBLIN1
Botangi ya 2021: Toli mpo na Mokanda ya Mituna ya Libota
Tolingi tosunga yo mingi mpo ozala na kati ya Botangi ya 2021. Yango wana tokomi buku oyo ya toli mpo na kosunga yo kotondisa Mokanda na yo ya Mituna ya Libota. Ezali bobongoli ya mibeko, mituna ya libota, mituna ya moto mpo na Moto 1, mpe mituna ya mopaya amonani na Mokanda ya Mituna ya Libota.
Soki osengeli bobongoli, okoki kosala na bobongoli ya Moto 1 mpo na kosunga yo kotondisa mituna ya moto mpo na Moto 2 tii na Moto 5, lokola ezali ndenge moko na oyo ya Moto 1.
Ekozala malamu okoma biyano na yo na buku oyo te. Benga nimelo ya minoko na 0800 587 2021 mpo na kosenga batindela yo Mokanda ya Mituna ya Libota epai na yo, soki ozwi nanu yango te.
Esengeli okoma biyano na yo na Mokanda ya Mituna ya Libota na Anglais.
Soki olingi lisungi mosusu, okoki kobenga nimelo ya minoko, mpo na kosolola na mobongoli.
Lisanga ya nimelo ya minoko ekokoka mpe kosunga yo na ndenge mosusu. Mpo na ndakisa, soki bato oyo bazali na ndako na yo baleki mitano, bakokoka kotindela yo mokanda ya Kokoba ya Libota.
Merci mpo na kozala na kati na Botangi ya 2021.
ii
Botangi ya 2021: esengeli oyeba makambo oyoBotangi ezali nini, mpe nani azali kosala yango? Botangi ezali mosala oyo ezali kosalema nsima ya mbula 10 nyonso, mpe ezali kopesa elili ya bato nyonso, na mabota na Angleterre, mpe na Pays de Galles. Oyo ezali kosunga mpo na kosala plan, mpe kopesa mbongo na quartier na yo.The Office for National Statistics (Bilo ya Ntalo ya Botangi) (ONS) ezali kosala plan, mpe kosala botangi na Angleterre, mpe na Pays de Galles, na ba agence misusu ya ntalo mpo na kopesa elili ya polele ya RU. Totindaka rapport mbala nyonso na parlement ya RU, kasi tozali kosala mpo na ba parti politique te.Ndenge nini botangi ezali kosunga ngai? Ba organisation ya ndenge nyonso, banda bakonzi ya esika tii na ba charité, bazali kosala na information ya botangi mpo na kosunga kopesa misala biso nyonso tozali nango besoin, lokola komema bato, kotangisa bana, mpe kobikisa bato.Ntango okoti na kati, okosunga kosala nyonso mpo yo na lisanga na yo bozwa misala oyo esengeli sik'oyo, mpe na nsima.Esengeli nasala yango? Esengeli osala botangi na ndenge ya kotosa mibeko. Soki osali yango te, to opesi ba information ya lokuta, bakoki kofutisa yo amende tii na £1000. Mituna misusu bakomi yango polele lokola ya volontaire - okozwa etumbu te soki opesi eyano na yango te.Ndenge nini nakozala na kati? Sala na buku oyo mpo na kotondisa lokasa ya Mokanda ya Mituna ya Libota. Malamu okoma te biyano na yo na buku oyo ya toli ya mokanda ya mituna. Nsima zongisa Mokanda ya Mituna ya Libota oyo osilisi kosala epai na biso na enveloppe oyo bapesi yo oyo efutamaki liboso.Ntango nini esengeli nasala yango? Esengeli ba information ozali kopesa ezala mpo na bato oyo bazali na libota na Mokolo ya Botangi, oyo ezali dimanche 21 mars 2021. Malamu tondisa mokanda na yo ya mituna na mokolo oyo, to noki noki na nsima.Nani nakotia na mokanda ya mituna? Esengeli opesa eyano na mituna ya moto na Mokanda ya Mituna ya Libota mpo na:• moto nyonso azali kofanda libela epai na yo, to oyo amoni adelesi na yo lokola ndako
na bango ya libota • bato balungwe ndako mpo na ntango mokuse, mpo na ndakisa bana ya kelasi, to
bana mike ya kelasi oyo bazali kolala mosika• bato bafandi epai na yo mpo na ntango mokuse soki bazali kofanda na RU, mpe
bazali na adelesi mosusu te • bato bafandi epai na yo mpo na ntango mokuse oyo bauti libanda ya RU, mpe bazali
kofanda na mboka mpo na sanza misato, to kolekaEteni mosusu ezali ya kotondisa mpo na bapaya - oyo ezali moto nyonso oyo akolala epai na yo na butu ya Mokolo ya Botangi - dimanche 21 mars 2021.Ba information na ngai ebombami malamu, mpe ezali sekele? Tokobomba malamu ba information nyonso ozali kopesa biso. Mpo na ndenge nini tokosala na ba information, tala liyebisi na biso ya kobomba makambo ya bato na nsima ya buku oyo. Mpo na komona lisakoli na biso mobimba ya kobomba makambo ya bato, oyo bakomi na anglais, kota na census.gov.uk.
Lokasa 1
Tondisa na internetiwww.census.gov.ukCode ya kokota ya libota na yo ezali:
TO tondisa mokanda ya mituna ya lokasa.
LisakoliMokanda ya mituna oyo esalemi na ndenge nayebi, mpe nandimi yango malamu mingi.
Soki adelesi na yo ezali mabe, to ezangi, koma adelesi na yo malamu na nse:
Esengeli osunga biso mpo na kosala botangi, oyo ezali kosangisa ba information ya malonga mpo na kosala plan ya misala lokola komema bato, kotangisa bana, mpe kobatela bolamu ya nzoto.Esengeli mabota nyonso basala botangi na 21 mars 2021, to noki noki na nsima. Soki olingi mingi, okoki kosala mokanda ya mituna na interneti:
1. Kende na www.census.gov.uk2. Kotisa code ya kokota ya libota na likolo ya
mokanda ya mituna oyo.3. Pesa biyano na mituna, mpe pona submit.
Merci mpo na kokota na kati.
Moteyi Sir Ian DiamondMokonzi ya Ntalo ya Mboka
Ba information na yo ebombami malamu na ndenge ya kotosa mibeko.Tala mingi na buku oyo eyaki na mokanda ya mituna oyo.
Esengeli ozala na kati ya botangi na ndenge ya kotosa mibeko. Soki ozali na kati te, to opesi ba information ya lokuta, bakoki kofutisa yo amende. Mituna misusu bakomi yango polele lokola ya volontaire - okozwa etumbu te soki opesi biyano na yango te.
Soki enveloppe na yo ebungi, malamu ozongisa mokanda na yo ya mituna osilisi kosala na: FREEPOST Census 2021
Esika nini okoki kozwa lisungi:www.census.gov.uk/helpEsika ya Kobenga 0800 141 2021NGT (18001) 0800 141 2021Nimelo ya Lisungi ya Monoko 0800 587 2021
FREEPOST (POSITA OFELE) Census 2021 (Botangi ya 2021)
H1
Postcode
Elembo ya nkombo Dati
Mokanda ya Mituna ya LibotaAngleterre
Lokasa 2
Nkolo libota moto azali na mokumba ya kotondisa mokanda ya mituna oyo mpe kozongisa yango.
Nkolo libota azali moto oyo afandi, to azali na adelesi oyo, mpe:• ndako ezali ya ye / azali kofutela yango (to ezali ya ye na moto mosusu / azali kofutela yango na moto
mosusu); mpe / to• azali na mokumba (to na moto mosusu) mpo na kofuta ba facture na ba dépense ya libota
Libota ezali:• moto moko afandi ye moko; to• lingomba ya bato (esengeli te bazala bandeko) bafandi adelesi moko, mpe bazali kokabola esika ya
kolambela, mpe na ya kofandela, to ya koliyela
Mpo na nini esengeli nasala na mokanda ya mituna oyo?
• Mituna ya libota na makasa 3-6 mpo na libota oyo, mpe na ndako na yango.
• Mituna ya moto na makasa 7-31 mpo na moto nyonso oyo afandaka na momeseno na libota oyo.
Moto nyonso oyo azalaki, to alingi kozala, na RU mpo sanza 3, to koleka esengeli akota na kati ya mituna oyo, na adelesi oyo afandaka na RU.
• Mituna ya bapaya na nsima ya lokasa (lokasa 32) mpo na bato nyonso oyo bakolala butu na libota oyo na 21 mars 2021.
Ezali monene mpo na kokotisa bapaya oyo bakolala butu na libota oyo mpo na kosala nyonso mpo moto ata moko azanga te. Bapaya bafandaka esika mosusu na RU esengeli bakoma bango na mokanda ya mituna ya botangi, na adelesi na bango ya momeseno.
Okozwa ba information mosusu ya kotiya na mokanda ya mituna oyo na buku oyo eyaki nango.
Nakozala na besoin ya mikanda misusu ya mituna?
• Soki bato bazali mingi koleka 5 na libota oyo, to koleka bapaya 3 bakolala butu, okoki kopona ata kosala mokanda mobimba ya mituna na interneti, to kotondisa mokanda ya mituna oyo, mpe kobenga biso mpo na kosenga moko, to Mikanda ya Mituna misusu ya Kokoba.
• Soki moto moko ya libota oyo alingi te bolakisa ba information na ye na bato basusu na libota, okoki kosenga Mokanda ya Mituna ya Moto. Obosana te mpo na kokotisa bato wana na mituna ya libota (H1 tii H14) na mokanda ya mituna, kasi tika polele mituna ya moto (1 tii 51).
• Soki mabota eleki moko na adelesi oyo, benga biso mpo na kosenga Mikanda misusu ya Mituna ya Libota.
Okoki kosenga mikanda misusu ya mituna na interneti na www.census.gov.uk, to obengi 0800 141 2021.
Ndenge nini nakosala mokanda ya mituna na ngai malamu?
Esengeli:
• okoma na mai ya mokanda ya moyindo, to ya bule, mpo na koyanola
• otia elembo na biyano na yo na kati ya boîte boye:
• okoma na kati ya ba boîte na ba majuscule, majuscule moko na boîte moko, lokola boye:
• obongisa ba foti nyonso na kotondisa boîte boye: to boye:
• okende na molongo oyo elandi (soki ekoki kosalema), ntango liloba ekoti te na kati, boye:
• landa mibeko KENDE NA , mpe tika nyonso polele mituna, to makasa oyo ozali na besoin ya koyanola te; bilembo nyonso, to milongo ekoki komonana mabe lokola biyano
S M I T HS MT I T H
P A D D I N G T ON S T R E E T
Liboso obanda
Lokasa 3
Nani afandaka awa?
Tia elembo na nyonso esengeli. Mpo na toli mpo na nani kotia na kati, tala buku oyo eyaki na yango
Ngai, oyo ezali ndako na ngai ya libela, to ya libota
Bato ya libota, mpe ba makango, bana, na bana mike babotami na dati, ya 21 mars 2021, to liboso
Bayekoli, na / to bana mike ya kelasi oyo bafandi mosika na ndako na kati ya ntango ya kelasi
Baninga bafandi ndako moko, to bafuteli
Bato bafandaka libanda ya RU, kasi baye kotikala na RU mpo na sanza 3, to, mingi koleka
Bato bazali kosala mosika na ndako na kati ya RU, to bazali basoda ya armée, soki oyo ezali ndako ya bango ya libela, to ya libota
Bato oyo bazali libanda ya RU mpo na libela te, mpo na ntango eleki sanza 12 te
Bato oyo bazali kotikala libela te, mpe bafandi na RU, kasi bazali na adelesi mosusu na RU te, mpo na ndakisa bandeko, baninga
Bato mosusu oyo bafandaka awa, mpe moto nyonso oyo azali mosika na ndako na ye mpo na libela te
TO moto moko te afandaka awa na momeseno, mpo na ndakisa, oyo ezali adelesi ya mibale, to ndako ya eyenga KENDE NA H4
Soki otangi moto nyonso oyo okotisi na motuna H1, bato oyo bafandaka awa bazali boni?
Soki otangi kaka bato oyo bakoti na motuna H4, bapaya bazali boni oyo bakolala awa na 21 mars 2021?
Obosana te kopesa eyano na mituna ya Bapaya na nsima ya lokasa (lokasa 32) mpo na bato oyo
Soki moto ata moko afandaka awa na momeseno te (kaka bapaya nde bafandi awa) KENDE NA H7
Soki olongoli moto nyonso oyo otangi na motuna H2, nani mosusu azali kolala awa na 21 mars 2021?Bato oyo bakotangama lokola bapaya. Kobosana te mpo na kotia bana, mpe na bana mike.
Tia elembo na nyonso esengeli
Bato oyo bafandaka epai mosusu na RU, mpo na ndakisa makango ya mobali / ya mwasi, baninga, bandeko
Bato bafandi awa lokola ezali adelesi na bango ya mibale, mpo na ndakisa, mpo na mosala. Ndako na bango ya libela, to ya libota ezali epai mosusu
Bato bafandaka libanda ya RU oyo bazali kotikala na RU mpo na sanza eleki 3 te
Bato bazali awa na eyenga
TO Bapaya bazali te oyo bazali kolala awa na 21 mars 2021 KENDE NA H6
Kobandela na yo moko, pesa ba nkombo ya bato nyonso batangami na motuna H2, mpe na bana, bana mike, na bafuteli.
Soki moto moko ya libota oyo asengaki Mokanda ya Mituna ya Moto, tia elembo na ngambo ya nkombo na ye, mpe tika polele mituna ya Moto 1 tii 51 mpo na moto wana
Soki bato bazali baleki 5, sala mokanda mobimba ya mituna na interneti, to benga biso mpo na kozwa Mokanda ya Mituna ya Kokoba.
Mokanda ya Mituna ya Moto
esengami?Nkombo ya liboso Nkombo ya nsuka
Yo moko (Moto 1)
Moto 2
Moto 3
Moto 4
Moto 5
H1
H2
H3
H4
H5
Mituna ya Libota
Lokasa 4
Bato ya libota oyo moko na moko bazali bandeko ndenge nini? Soki bato bazali bandeko te, tia elembo na boîte ‘Bandeko te’.
Salela molongo ndenge moko na oyo osaleli na motuna H3 (lokasa 3), koma nkombo ya moto nyonso oyo afandaka awa na likolo ya likonzi nyonso. Obosana te kokotisa bana, bana mike babotami sika, mpe na bato oyo basengi Mokanda ya Mituna ya Moto
Tia elembo na boîte oyo elakisi bondeko ya moto nyonso na moto moko moko ya libota oyo Soki moto afandaka awa na momeseno te, mpe bapaya bazali te oyo bakolala awa na 21 mars 2021 KENDE NA H7
H6
Ndenge nini Moto 2 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 3 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 2 azali ndeko ya Moto:
KOTISA NKOMBO YA MOTO 1 AWA LOKOLA
NA MOTUNA H3
SOKI OFANDAKA YO MOKO KENDE NA H7
Nkombo ya Moto 1
Nkombo ya Moto 1
Ndakisa:
Oyo ezali kolakisa ndenge nini libota ya baboti 2 na bana 3 bazali na bondeko na kati na bango
KOKOMA eloko TE na eteni oyo
Pesa ba détail ya bato ya libota na eteni NA NSE
Nkombo ya Moto 2 Nkombo ya Moto 3
Nkombo ya Moto 2
Mobali ya libala to mwasi ya libalaMakango ayebani na bakonziMakangoMwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasiMwana na mwasi to mobali na yoFrère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Mobali ya libala to mwasi ya libala
Makango ayebani na bakonzi
Makango
Mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi
Mwana ya mwasi to mobali na yo
Frère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Demi-frère, to demi-sœur
Mama to tata
Mwasi ya tata to mobali ya mama
Nkoko
Tatankoko - mamankoko
Bondeko - mosusu
Bandeko te (mpe mwana ya kobokola)
Mobali ya libala to mwasi ya libala
Makango ayebani na bakonzi
Makango
Mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi
Mwana ya mwasi to mobali na yo
Frère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Demi-frère, to demi-sœur
Mama to tata
Mwasi ya tata to mobali ya mama
Nkoko
Tatankoko - mamankoko
Bondeko - mosusu
Bandeko te (mpe mwana ya kobokola)
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
MARY ROBERT
SMITH SMITH
1 1
1
2
Mituna ya Libota – ya kokoba
Lokasa 5
Moto 5 (James) azalli mwana ya Moto 1 (Mary) na Moto 2 (Robert), na frère ya Moto 3 (Alison), na Moto 4 (Stephen)
Soki bato baleki 5, benga biso mpo na kosenga Mokanda ya Mituna ya Kokoba
Ndenge nini Moto 3 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 4 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 5 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 5 azali ndeko ya Moto:
Ndenge nini Moto 4 azali ndeko ya Moto:
Nkombo ya Moto 4 Nkombo ya Moto 5
Nkombo ya Moto 3 Nkombo ya Moto 4 Nkombo ya Moto 5
Mobali ya libala to mwasi ya libala
Makango ayebani na bakonzi
Makango
Mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi
Mwana ya mwasi to mobali na yo
Frère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Demi-frère, to demi-sœur
Mama to tata
Mwasi ya tata to mobali ya mama
Nkoko
Tatankoko - mamankoko
Bondeko - mosusu
Bandeko te (mpe mwana ya kobokola)
Mobali ya libala to mwasi ya libalaMakango ayebani na bakonziMakangoMwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasiMwana na mwasi to mobali na yoFrère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Mobali ya libala to mwasi ya libalaMakango ayebani na bakonziMakangoMwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasiMwana na mwasi to mobali na yoFrère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Mobali ya libala to mwasi ya libalaMakango ayebani na bakonziMakangoMwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasiMwana na mwasi to mobali na yoFrère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Mobali ya libala to mwasi ya libala
Makango ayebani na bakonzi
Makango
Mwana na yo ya mobali to mwana na yo ya mwasi
Mwana ya mwasi to mobali na yo
Frère to sœur (mpe demi-frère, to demi-sœur)
Demi-frère, to demi-sœur
Mama to tata
Mwasi ya tata to mobali ya mama
Nkoko
Tatankoko - mamankoko
Bondeko - mosusu
Bandeko te (mpe mwana ya kobokola)
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
ALISON STEPHEN JAMES
SMITH SMITH SMITH
1 1
111
2 2
222
3 3
33
4
4
Lokasa 6
Ndako ya libota na bino ezali ya bino moko, to ezali ya kofutela?
Tia elembo na boîte moko pamba
Ezali nyonso ya bino
Ezali ya bino mpo na mortgage, to nyongo ya banki
Ndambo na bino, mpe ndambo ya kofutela (bonkolo ya kokaboka)
Ya kofutela (na mbongo ya kofutela ndako, to na yango te)
Afandi awa ofele
KENDE NAH14
KENDE NAH14
Nani azali nkolo ya ndako na yo?
Tia elembo na boîte moko pamba
Lisanga ya bankolo ndako, cooperative ya bandako, ba charité, bankolo ndako ya social bayebani
Council, to bokonzi ya esika
Nkolo ndako privé, to agence ya ba ndako
Mokonzi ya mosala ya moto moko ya libota
Ndeko, to moninga ya moto moko ya libota
Mosusu
Na nyonso, mituka, to ba kombi boni ezali ya bato ya libota oyo, to oyo bakoki kosalela na yango?
Mpe na mituka nyonso ya kompani, to ba kombi oyo ezali mpo na bino moko
Ata moko te
1
2
3
4
5, to koleka, koma boni
Ndako oyo ezali ya motindo nini?
Ndako mobimba, to ndako moke oyo ezali:
ndako ekangemi te
ndako ekangemi ngambo moko
ndako ekangemi ngambo mibale (mpe na oyo ya nsuka)
Flat, ndako moke, to appartement oyo ezali:
na immeuble ya ba flat, to appartement
ndambo ya ndako ya kokabola (mpe chambres meublées)
ndambo ya immeuble oyo ekomi ndako (mpo na ndakisa, ecole ya kala, eglise, to depot)
na immeuble ya bonkita (mpo na ndakisa, na immeuble ya ba bilo, hôtel, to likolo ya magasin)
Ndako ya motuka ya kotambola na yango, to ya libela te:
caravane, to ndako mosusu ya motuka ya kotambola na yango, to ya libela te
Ba chambre nyonso na ndako oyo, mpe na cuisine, salle de bain, na toilettes, ezali nsima ya ezibele (porte) oyo kaka libota oyo bazali kosala na yango?
Ee
Te, chambre moko, to mingi ezali ya kokabola na libota mosusu
Ba chambre ya kolalela boni ezali kaka mpo na kosalisa libota oyo?
Mpe na ba chambre nyonso oyo batongi, to bakati mpo ekoma lokola chambre ya kolalela
Ba chambre boni ya kolalela
Ndako oyo ezali na chauffage central ya motindo nini?
Tia elembo na nyonso esengeli, ezala ata osalelaka yango, to osalelaka yango te
Chauffage ya ndako mobimba ezali masini oyo epesaka molungwe na ba chambre ebele
Chauffage ya ndako mobimba ezali te
Gaz ya tiyo
Tanki, to gaz ya molangi
Ya courant (mpe ba radiateur)
Mafuta
Libaya (mpo na ndakisa, ba nzete, koni, to biteni ya nzete)
Charbon (mpo na ndakisa, makala)
Energie oyo esilaka te (mpo na ndakisa, panneau solaire, to pompi ya molungwe)
Molongo ya molungwe ya district, to commune
Mosusu
Soki moto moko, to bato mingi bafandaka awa na momeseno
TO soki moto ata moko afandaka awa te na momeseno (kaka bapaya nde bafandaka awa)
KENDE NA lokasa 32
TO soki moto ata moko afandaka awa te na momeseno, mpe bapaya bakofanda te butu na 21 mars 2021
KENDE NA Lisakoli na likolo ya lokasa
KENDE NAH12
H11
H12
H13
H14
H7
H8
H9
H10
Mituna ya Libota - ya kokoba
Lokasa 7
Soki okanisi mpo na bato oyo opesi na motuna H3, yo ozali Moto 1?
Ee
Te - kotisa ba information ya Moto 1 na eteni oyo
Ofandaka na adelesi mosusu mpo na mikolo koleka 30 na mbula moko?
Mikolo wana ekoki kozala elandani, to ekeseni
Te
Ee, koma ba adelesi mosusu ya RU na nse
TO Ee, libanda ya RU, koma ekolo
KENDE NA 8
Adelesi wana ezali nini?
Adelesi ya base ya armée
Adelesi mosusu ntango ozali kosala mosika na ndako
Adelesi ya ndako ya moyekoli
Adelesi ya moyekoli na ntango ya kelasi
Adelesi ya moboti mosusu, to mobateli
Adelesi ya makango
Ndako ya ntango ya eyenga
Mosusu
Na kati ya ntango ya kelasi, ofandaka wapi na momeseno?
Na adelesi oyo ezali likolo ya mokanda oyo ya mituna
Na adelesi ya motuna 6
Na adelesi mosusu
KENDE NA 51 KENDE NA 51
Ekolo na yo ya mbotama ezali nini?
Angleterre
Pays de Galles
Ecosse
Irlande du Nord
République d’Irlande
Esika mosusu, koma nkombo ya mboka
KENDE NA 13 KENDE NA 13
KENDE NA 13 KENDE NA 13
Ozali mwana ya kelasi, to moyekoli oyo ayekolaka ntango nyonso?
Ee Te KENDE NA 10
Nani azala (azalaki) mobali/mwasi na yo, to makango na yo?
Moto moko oyo ya sexe mosusu
Moto moko ya sexe moko
Na 21 mars 2021, libala na yo ezali ya ndenge nini, to libala na makango oyo eyebani?
Nabala ata mbala moko te, to nazalaki ata mbala moko te na libala ya makango
Nabala
Na libala ya makango
Nasi nakabwana, kasi libala ezali nanu na miso ya bakonzi
Nasi nakabwana, kasi nazali nanu na libala ya makango
Nasi nakabwana
Liboso na libala ya makango, oyo esi ekufi sik'oyo
Mozenge
Makango oyo atikali na bomoyi, na libala ya makango eyebanaki na bakonzi
KENDE NA 6
Nkombo na yo nani? (Moto 1 na motuna H3)
Elaka na yo ya mbotama ezali nini?
Sexe na yo ezali mobali, to mwasi?
Motuna mpo na sexe na yo ekolanda soki ozali na age ya mbula 16, to likolo
Mwasi
Mobali
Nkombo ya liboso
Nkombo ya kati
Nkombo ya nsuka
Mokolo Sanza Mbula
Postcode
P 6
7
8
9
10
1
2
3
4
5
Mituna ya Moto - Moto 1 obandela awa
Lokasa 8
Soki obotami na Royaume-Uni te, ntango nini na mikolo eleki oyaki mpo na kobanda kofanda awa? Otanga te ba visite mokuse libanda ya RU
Soki oyaki liboso ya 21 mars 2020
Soki oyaki na, to nsima na 21 mars 2020
KENDE NA 13
KENDE NA 12
Ekolo na yo ya makila ezali nini?
Pona eteni moko banda A tii E, bongo tia elembo na boîte moko mpo olakisa malamu mingi ekolo na yo ya makila, to epai owuti
A Mundele
Anglais, Gallois, Ecossais, Irlandais du Nord, to Britannique
Irlandais
Gitan, to ba Irlandais basalaka mibembo
Roma
Mundele mosusu, koma yango
B Métis
Mundele na Moyindo ya Caraïbes
Mundele na Moyindo ya Afrika
Mundele na Asiatique
Métis mosusu, koma awa
C Asiatique, to Asiatique ya RU
Indien
Pakistanais
Bangladais
Chinois
Ekolo ya Asiatique mosusu, koma yango
D Moyindo, Moyindo ya Britannique, Moto ya Caraïbes, to Moto ya Afrika
Moto ya Caraïbes
Moto ya Afrika, koma na nse
Moyindo nyonso mosusu, Moyindo ya RU, to Caraïbes, koma
E Liboke ya ekolo mosusu
Muarabu
Ekolo mosusu, koma yango
Soki otangi ntango osi’ osali awa, olingi otikala na Royaume-Uni mpo na ntango molayi boni?
Koleka sanza 12 te
Sanza 12, to koleka
Ndenge nini okoki kobenga ekolo ya mboka na yo?
Tia elembo na nyonso esengeli
Britannique
Anglais
Gallois
Ecossais
Irlandais du Nord
Mosusu, koma yango
Mbula oyo eleki, adelesi na yo ya momeseno ezalaki nini?
Soki ozalaki na adelesi ya momeseno mbula oyo eleki, loba adelesi oyo ozalaki kofanda
Adelesi oyo ezali na likolo ya mokanda oyo ya mituna
Adelesi ya ntango ya kelasi ya moyekoli, to ya internat na RU, koma adelesi ya ntango ya kelasi na nse
Adelesi mosusu na RU, koma yango na nse
TO ee, libanda ya RU, koma mboka
Sanza Mbula
Postcode
11
14
15
13
12
Mituna ya moto - Moto 1 ya kokoba
Lokasa 9
Soki ozali na mbula 16, to likolo
Soki ozali na mbula 15, to na nse
KENDE NA 26 KENDE NA 51
Motuna oyo etikali polele na nko KENDE NA 18
Monoko na yo ya liboso ezali nini?
Anglais
Mosusu, koma (mpe minoko ya bilembo)
KENDE NA 20
Okoki koloba anglais malamu mingi ndenge nini?
Malamu mpenza Malamu Malamu te Ata moke te
Lingomba ya losambo na yo ezali nini?
Motuna oyo ezali ya volontaire
Lingomba ya losambo te
MoKristo (mpe Catholique, Protestant, na ba nkombo nyonso misusu ya baKristo)
Bouddhiste
Muyindi
Juif
Musulman
Sikh
Lingomba ya losambo mosusu, koma yango
Ozali na bokono ya nzoto, to ya motu, to bokono moko oyo ekoki kowumela koleka ba sanza 12, to mingi?
Ee
Te KENDE NA 24
Bokono moko ezali kokitisa bokoki na yo ya kosala makambo na yo ya mikolo nyonso?
Ee, ebele
Ee, moke
Ata moke te
Sexe na yo ezali ndenge moko na oyo bakomaki na ntango obotamaki?
Motuna oyo ezali ya volontaire
Ee
Te, koma sexe na yo
Nini oyo elandi awa ezali kolakisa malamu mingi sexe ya baoyo olingi olala na bango?
Motuna oyo ezali ya volontaire
Na moto ya sexe mosusu
Na moto ya sexe ya ndenge moko
Na moto ya sexe nyonso
Sexe mosusu olingi, koma
Ozali kobatela, to ozali kosunga moto moko oyo azali na bokono ya nzoto, to bokono ya motu, to kokoso oyo ezali mpo na âge na ye ya mobange? Longola eloko nyonso ozali kosala lokola mosala oyo bazali kofuta ya mbongo
Te
Ee, ngonga 9 na semaine, to moke
Ee, ngonga 10 tii 19 na semaine
Ee, ngonga 20 tii na 34 na semaine
Ee, ngonga 35 tii 49 na semaine
Ee, ngonga 50, to koleka na semaine
Ozali na passeport nini?
Tia elembo na nyonso esengeli
Royaume-Uni
Irlande
Mosusu, koma yango
TO ata moko te
Bolamu ya nzoto na yo ezali ndenge nini?
Malamu mpenza Malamu Kamwa malamu Mabe Mabe mpenza
16
20
17
18
19
21
22
23
24
25
26
27
Mituna ya moto - Moto 1 ya kokoba
Lokasa 10
Osilisaki stage ya mosala?
Mpo na ndakisa, trade, advanced, foundation, modern
Ee Te
Na mikolo nsambo eleki, ozalaki kosala oyo elandi awa? Tia elembo na nyonso esengeli
Mpe na mosala ya temporaire, ata soki ezali ngonga moko kaka
Osalaka lokola moto ya mosala?
Ozali komisalela yo moko
Otiki mosala mpo na mikolo mike mpo na bokono, mpo na eyenga, to balongoli yo na mosala mpo na mikolo mike
Na eyenga ya nsima ya kobota, to ya tata ya mwana
Ozali kosala mosala mosusu oyo bazali kofutela yo
TO ata moko te na misala oyo likolo
KENDE NA 39 KENDE NA 39
KENDE NA 39
KENDE NA 39
KENDE NA 39
Nini na oyo elandi awa ezali kolakisa oyo ozalaki kosala na mikolo nsambo eleki?
Tia elembo na nyonso esengeli
Osi obima na mosala (ata ozwui pension, to ozwui te)
Ozali koyekola
Ozali kobatela ndako, to libota
Ozali moto ya bokono ya mikolo ebele, to ozali na koka
Mosusu
Na ba semaine minei eleki, ozalaki koluka makasi mosala ya mbongo ya ndenge nyonso?
Ee
Te
Soki mosala emonani sik'oyo, okoki kobanda yango na kati ya semaine mibale?
Ee
Te
Na mikolo nsambo eleki, ozalaki kozela mpo na kobanda mosala oyo osi ondimaki?
Ee
Te
Osi osali mosala ya mbongo?
Ee, na ba sanza 12 oyo eleki
Ee, kasi na ba sanza 12 oyo eleki te
Te, nasala ata mbala moko te KENDE NA 51
Ozwi dipoloma na niveau ya licence, to likolo?
Mpo na ndakisa, degree, foundation degree, HND, to HNC, NVQ level 4, na likolo, ya molakisi, to ya infirmier
Ee Te
Liboso ozalaki na kati ya armée ya RU?
Ba oyo bazali sik'oyo na armée esengeli batia kaka "te"
Ee, liboso nazalaki na armée ya mikolo nyonso
Ee, liboso nazalaki na armée ya réserve
TO te
Ozali na ba dipoloma misusu?
Tia elembo na nyonso esengeli
GCSEs, to dipoloma ya ndenge moko
5, to GCSEs ebele (A*-C, 9-4), O levels (passes), to CSEs (grade 1)
GCSEs misusu, O levels, to CSEs (grade nyonso), to Basic Skills course
AS, A level, to dipoloma ya ndenge moko
2, to A levels ebele, 4, to AS levels ebele
1 A level, 2-3 AS levels
1 AS level
NVQ, to dipoloma ya ndenge moko
NVQ level 3, BTEC National, OND, to ONC, City and Guilds Advanced Craft
NVQ level 2, BTEC General, City and Guilds Craft
NVQ level 1
TO mosusu, to ba dipoloma te
Ba dipoloma misusu, ya ndenge moko eyebani te
Ba dipoloma te
Mituna oyo elandi ezali mpo na ba dipoloma na yo.
Koma ba dipoloma ozali nango na Angleterre, Pays de Galles, to na mokili, mpe na ba dipoloma oyo ekokani nango, ata soki ozali kosala nango te sik'oyo
Pesa eyano na mituna etikali mpo na mosala na yo monene, to soki ozali kosala te, mosala monene na yo ya nsuka.
Mosala monene na yo ezali mosala oyo osalaka (ozalaki kosala) na ngonga ebele
29
33
34
35
36
37
38
30
31
32
39
28Mituna ya moto - Moto 1 ya kokoba
Lokasa 11
Na mosala na yo monene, ozali (ozalaki) na mosala ya ndenge nini?
Moto ya mosala
Moto ozali komisalela yo moko, oyo ozalaki na bato basusu ya mosala te
Moto ozali komisalela yo moko, mpe ozalaka na bato basusu ya mosala
Na mosala na yo monene, ngonga boni osalaka na semaine na momeseno? Mpe na ngonga supplémentaire bazali kofuta, na oyo bazali kofuta te
0 tii 15 16 ii 30 31 tii 48 49, tii likolo
Osalaka wapi na momeseno?
Na esika ya mosala, to okendaka na depot
Na ndako
Na likolo ya mai
Esika moko te
KENDE NA51 KENDE NA51 KENDE NA51
Adelesi ya esika ya mosala na yo, to depôt ezali nini?
Ndenge nini okendaka na mosala?
Tia elembo na boite moko kaka mpo na eteni ya molayi mingi koleka ya mobembo na yo ya mosala na momeseno, mpo na mosika
Nasalaka mingi mingi na ndako
Métro, rail ya pepele, tram
Train
Bus, minibus, to bus monene
Taxi
Moto, scooter, to moto moke
Kokumba motuka, to kombi
Passager na motuka, to kombi
Vélo
Na makolo
Mosusu
Nkombo ya kompani to business ozali (ozalaki) kosala nango ezali (ezalaki) nini? Soki ozali (ozalaki) kosala mpo na yo moko na business na yo, koma nkombo ya kompani na yo
TO soki kompani te, to ozali (ozalaki) kosala mpo na moto moko
Nkombo ya mosala na yo ezali (ezalaki) nini?
Mpo na ndakisa: moteki ya biloko (RETAIL ASSISTANT), mopangisi ya bilo (OFFICE CLEANER), infirmière ya district (DISTRICT NURSE), molakisi ya école primaire (PRIMARY SCHOOL TEACHER)
Opesa grade na yo te, to catégorie ya kofutama te
Loba na mokuse mosala oyo osalaka to (ozalaki kosala) na mosala na yo ya monene.
Ozali (ozalaki) mokonzi ya mosala ya bato basusu na mikolo nyonso?
Ee Te
Nkombo ya mosala monene ya kompani na yo, business, to mosala ya komisalela ezali (ezalaki) nini?
Mpo na ndakisa, koteka bilamba (CLOTHING RETAIL), hôpital ya bato nyonso (GENERAL HOSPITAL), kolakisa bana mike (PRIMARY EDUCATION), koteka bilei ya gros (FOOD WHOLESALE)
Soki ozali (ozalaki) fonctionnaire, koma CIVIL SERVICE Soki ozalaka (ozalaki) moto ya mosala ya bokonzi ya mboka to gouvernement epai ozalaka, koma LOCAL GOVERNMENT, mpe pesa nkombo ya département na kati ya bokonzi ya esika
Soki ozalaki na mosala semaine elekiSoki otikaki mosala mpo na ntango mokuse semaine elekiSoki ozalaki na mosala te semaine eleki
KENDE NA 47
KENDE NA 47
KENDE NA51
Mituna ezali lisusu te mpo na Moto 1
KENDE NA mituna mpo na Moto 2TO soki bato basusu bazali lisusu te na kati ya libota oyo
KENDE NA Mituna ya Bapaya na nsima ya lokasa
TO soki bapaya bakolala na butu te
KENDE NA Lisakoli na likolo ya lokasa
Postcode
44
45
46
47
48
49
50
51
40
41
42
43
Mituna ya moto - Moto 1 ya kokoba
Lokasa 12 (lokasa 32 na mokanda ya mituna)
Bapaya boni okotisaki na motuna H5?
Mopaya moko tii bapaya misato - pesa eyano na mituna V1 tii V4 na nse mpo na mopaya moko moko
Bapaya koleka minei - pesa eyano na mituna V1 tii V4 na nse mpo na bapaya misato, nsima kenda na www.census.gov.uk, to benga 0800 141 2021 mpo na kosenga Mokanda ya Mituna ya Kokoba
Nkombo ya moto oyo ezali nini?V1
Nkombo ya moto oyo ezali nini?V1
Nkombo ya moto oyo ezali nini?V1
Moto oyo afandaka na adelesi nini na RU?
TO Libanda ya RU, koma mboka
V4
Moto oyo afandaka na adelesi nini na RU?
Adelesi ndenge moko na Mopaya A
TO Libanda ya RU, koma mboka
V4
Moto oyo afandaka na adelesi nini na RU?
Adelesi ndenge moko na Mopaya A
TO Libanda ya RU, koma mboka
V4
Elaka ya mbotama ya moto oyo ezali nini?V2
Elaka ya mbotama ya moto oyo ezali nini?V2
Elaka ya mbotama ya moto oyo ezali nini?V2
Moto oyo azali mwasi, to mobali?
Mwasi Mobali
V3
Moto oyo azali mwasi, to mobali?
Mwasi Mobali
V3
Moto oyo azali mwasi, to mobali?
Mwasi Mobali
V3
Mopaya A
Mopaya B
Mopaya C
Sik'oyo KENDE NA Lisakoli na lokasa ya likolo
Nkombo ya liboso
Nkombo ya liboso
Nkombo ya liboso
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya nsuka
Nkombo ya nsuka
Mokolo Sanza Mbula
Mokolo Sanza Mbula
Mokolo Sanza Mbula
Postcode
Postcode
Postcode
VMituna ya Bapaya
xv
Botangi 2021: Tokosala na ba information na yo, mpe tokobatela malamu makambo na yo mokoBiso (ONS) tokosangisa, mpe tokosala na makambo oyo euti, na mokanda na yo ya mituna, mpo na kosunga kotonga elili ya malonga ya lisanga na biso. Ntalo (statistiques) oyo tozali kozwa na botangi na Angleterre, mpe na Pays de Galles ezali kosunga gouvernement na bakonzi ya mboka mpo na kosala plan, mpe kopesa mbongo mpo na misala, lokola kotangisa bana, cabinet ya minganga, mpe na ba nzela. Mobeko (Mobeko ya Botangi 1920) ezali kopesa biso nzela ya kosala yango. Esengeli moto nyonso asala botangi, mpe ezali etumbu kozanga kopesa ba information, to kopesa ba information ya lokuta. Oyo ekoki kosala ete bakofunda yo na tibinali. Tokoki kokoma ba information mpo na eloko, to moto mpo na kobatela bato oyo bazali kopesa biyano na mituna, na baoyo bazali kotuna mituna. Tokosangisa ba information mpo na ndenge nini bato bazali kotondisa mikanda na bango ya mituna na Interneti, mpo tokoka kobongisa misala na biso ya interneti.
Nani akoki komona ba information?Bato basusu ya misala bakosala na kati ya mibeko na biso mpo na kosunga biso kosala botangi. Tokondima mpo ba chercheur bayebani bamona makambo masusu, soki ekokani na mibeko, mpe ezali malamu mpenza mpo na bato nyonso. Bato bakoyebana te na kati ya ntalo na biso, to recherche mosusu. Information mosusu ekoki kozwama na site ya interneti ya ONS.
Tokobomba makambo ya bato mpo na ntango boni?Tokobomba makambo make mingi ya bato oyo tozali nango besoin mpo na mosala oyo tosangiselaki yango na ebandeli. Soki ezali malamu, tokolongola makambo ya bato, to tokosala yango elakisa ba nkombo te. Tokobomba, mpe tokokengela biyano ya makambo ya botangi mpo na mbula 100 na Archives Nationales.
Ba droit na yoOzali na ba droit mpo na kosenga omona ba information oyo tozwi mpo na yo epai na mokengeli nyonso oyo azali kobomba yango; osenga bango mpo na kobongisa ba information na yo oyo ezali malamu te; mpe okoki koboya mpo basala nango misala. Okoki kozala na droit ya kotuna mokengeli nyonso balongola ba information na yo babombi mpo na yo; batika kosala na yango mosala; mpe batinda ba information oyo babombi mpo na yo epai na mobateli mosusu te. Tokoki te kondima, soki makambo tobombi ezali mpo na ntina ya ntalo pamba. Soki olingi kosala na ba droit na yo lokola ntina ya makambo, malamu obenga moyambi na biso oyo azali mobateli ya makambo.
Nimelo ya kobenga:Mokengeli ya makambo: 01329 444972 [email protected] Census Customer Services, Office for National Statistics, Segensworth Road, Titchfield, Fareham, Hampshire, PO15 5RRMobateli ya makambo ya ONS: 0845 601 3034 [email protected] Data Protection Officer, Office for National Statistics, Segensworth Road, Titchfield, Fareham, Hampshire, PO15 5RR Bilo ya Commissaire ya Information: 0303 123 1113 [email protected] Information Commissioner's Office, Wycliffe House, Water Lane, Wilmslow, Cheshire, SK9 5AF
xvi