2
Manaka ma m’poso Manaka ma m’poso Manaka ma m’poso Manaka ma m’poso O mwa inei na 18h RENOUVEAU DANS L’ESPRIT O mwa m’poso na 15h 1. CHORALE 2. ACOLYTAT 3. LECTORAT O mwa lomingo na 12h30 LEGION DE MARIE O mwa lomingo inso na 14h00 MISA NA ‘LINGALA’ (RITE ZAIROIS) N.B. - Mpo ya Batisimu esengeli komiyebisa m’poso isato liboso mpo ya bolengeli. - Nganga Nzambe azali mpe koyamba mpo ya n’tubela mpe mpo ya kolengele libala lisantu. Copyright Commission de Communication Sociale de l’Aumônerie Catholique Congolaise de Londres M a y e b i s i Nsango ya eklezya, news RDC : Ré é épression de la marche pacifique des chrétiens La marche pacifique des chrétiens pour «commémorer le vingtième anniversaire du massacre des chrétiens et croyants du 16 février 1992 et réclamer la justice et la vérité des urnes et la démission du bureau de la Commission électorale nationale indépendante, n’a pas eu lieu comme prévu. Elle a été réprimée par la Police nationale congolaise en divers endroits de la capitale, où quelques fidèles téméraires. Organisée Conseil de l’apostolat des laïcs catholiques congolais (CALCC), la marche pacifique devait partir de toutes les paroisses de l’archidiocese de Kinshasa pour Saint Joseph de Matonge le point de rencontre finale. Malgré le déployement de la police tôt le matin aux abords des plusieurs paroisses et la mesure d’interdiction par l’autorité urbaine au motif qu’elle aurait été saisie en retard, les chrétiens, à leur tête les clergés sont descendus dans la rue en priant et chantant avec en leurs mains Bibles, chapelets, crucifix, statuettes de la Sainte Vierge Marie et des rameaux. Les chrétiens pacifiques ont subit la brutalité de la police lourdement armée dans des paroisses mêmes. Des gaz lacrymogène ont été lancés dans les enceintes des paroisses et des véhicules anti-émeutes ont été utilisés pendant que les fidèles étaient à la messe matinale pour les bloqués. Plusieurs laics, des abbés ainsi que deux religieuses ont été arrêtées et libérés grâce à l’intervention de la Police de la Monusco. Il a été aussi observé qu’un groupe de jeunes sportifs violents bien connus comme proches d’un parti politique, armés de machettes, ont menaçé de s’attaquer aux chrétiens. La veille, le mercredi 15 février 2012, le gouverneur de la ville province de Kinshasa, André Kimbuta, a interdit, la marche pacifique des chrétiens prévue ce jeudi. Motif invoqué, le Conseil de l’apostolat des laïcs catholiques du Congo (CALCC), l’organe organisateur n’a pas respecté la procédure légale en la matière. Sur les antennes des télévisions controlées par le pouvoir de Kinshasa, André Kimbuta a affirmé que la lettre de notification de la marche est parvenue à l’hôtel de ville en retard. Il a ajouté que le CALCC n’est pas répertorié parmi les associations agréées par l’hôtel de ville. Pour information, le CALCC est une plate-forme favorisant la concertation et la synergie entre tous les mouvements et associations ecclésiaux des laïcs catholiques dans leurs différences et leurs diversités. Il est sous la tutelle de la Commission épiscopale pour l’apostolat des laïcs (CEAL). Ce même mercredi 15 février, peu après le journal télévisé de 7 heures du matin, la Radio Télévision Catholique Elikya (RTCE), émettant à Kinshasa a vu l’interruption de ces émissions. Aucune raison officielle n’a été invoquée pour justifier cette coupure du signal. Se rendant à la société Téléconsult où est logé l’émetteur, la sœur Annie Zama, s’est vu refuser l’accès par les gardiens du site en lui demandant “d’appeler le ministre Mende.” La chaine avait déjà reçu la menace de fermeture en date du 10 février de la part du gouvernement à travers la lettre du ministre de la Communication et des Médias dans laquelle il lui est reproché la « violation des obligations du cahier des charges des médias audiovisuels ». Protocole & Fete : Protocole & Fete : Protocole & Fete : Protocole & Fete : Likita vendredi 2 vendredi 2 vendredi 2 vendredi 2 mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa epai ya maman Bijou Sindula. Mpo ya nsango inso ya esengo to ya mawa itali lisanga benga bandeko ba Commission ya Caritas o ba numéros iye mpo ya bopanzi nsango : 07930229408, 07957781758. To Aurelie Mataso, Blessing Kingombe, Christvie Ngoma, 10 years old Mabonza ma eyenga eleki £371.01 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 :" O mikolo mya lomingo minso moko moko wa biso atia mwa mosolo mpembeni lokola akoki". Saint Joan Of Arc 60 Highbury Park, Islington, London, N5 2XH Tel : 0207 790 6463 Mob: 0794 467 1275 e-mail : [email protected] Abbé Noël Mpati, Aumônier Lomingo la 1 la Karezimo o mobu B Lomingo la 1 la Karezimo o mobu B Lomingo la 1 la Karezimo o mobu B Lomingo la 1 la Karezimo o mobu B 26 26 26 26 f f fé é évrier vrier vrier vrier 2012 2012 2012 2012 Aumônerie Catholique Congolaise de Londres Aumônerie Catholique Congolaise de Londres Aumônerie Catholique Congolaise de Londres LOKASA YA LOMINGO M b ang o , L ik o l o , M ak a si Ve rs 5 a n s BONGOLA MOTEMA MPE BONDIMA NSANGO ELAMU. Eleko ya Karezimo ebandi. Ntango ya komitala mpe kobongola mitema. Tobengami mpo na kozela, mpo na komipetola, mpo na kobunda etumba mpe lisusu kotala motema malamu mpe loboko ya Mokonzi. Na komitala, tomona masumu ma biso, bozangi bokaboli mpe koboya koyoka Nzambe na kati ya bomoi na biso. Na Karezimo tobengami lisusu mpo na kolanda Yezu na ndenge alongi monguna satana na bikoseli bya ye. Mikolo 40 mikomema biso na Pasika, tozwa makasi ya boyambi na biso mpe tosalela yango. Kristu nde alongoli biso na molili mpo amema biso na mwinda. KAREZIMO ELAMU NA BINO BANSO ! CONVERTISSEZ-VOUS ET CROYEZ A LA BONNE NOUVELLE. Nous vivons déjà le carême. Ce temps de repentir et de conversion s'adresse à tous. Nous sommes invités à faire l'expérience de l'attente, de la purification, de l'épreuve et aussi de la fidélité de Dieu à ses promesses. Et nous expérimentons en même temps notre péché, notre égoïsme, la médiocrité et l’absence de référence de Dieu dans notre vie. Nous sommes appelés à imiter Jésus qui nous enseigne à vaincre la tentation. Pendant ces 40 jours qui nous mèneront à la Pâques de la résurrection, nous pouvons puiser un courage renouvelé pour accepter patiemment et dans la foi toutes situations difficiles et d'épreuve, avec la conscience que le Seigneur fera surgir des ténèbres un jour nouveau. BONNE ROUTE DE CARÊME A VOUS TOUS ! Abbé Noël Mpati, aumônier

Lomingo La 1 La Karezimo o Mobu B

Embed Size (px)

DESCRIPTION

BONGOLA MOTEMA MPE BONDIMA NSANGO ELAMU.Eleko ya Karezimo ebandi. Ntango ya komitala mpe kobongola mitema. Tobengami mpo na kozela, mpo na komipetola, mpo na kobunda etumba mpe lisusu kotala motema malamu mpe loboko ya Mokonzi. Na komitala, tomona masumu ma biso, bozangi bokaboli mpe koboya koyoka Nzambe na kati ya bomoi na biso. Na Karezimo tobengami lisusu mpo na kolanda Yezu na ndenge alongi monguna satana na bikoseli bya ye. Mikolo 40 mikomema biso na Pasika, tozwa makasi ya boyambi na biso mpe tosalela yango. Kristu nde alongoli biso na molili mpo amema biso na mwinda.

Citation preview

Page 1: Lomingo La 1 La Karezimo o Mobu B

Manaka ma m’posoManaka ma m’posoManaka ma m’posoManaka ma m’poso

O mwa inei na 18h

RENOUVEAU DANS L’ESPRIT

O mwa m’poso na 15h 1. CHORALE

2. ACOLYTAT 3. LECTORAT

O mwa lomingo na 12h30

LEGION DE MARIE

O mwa lomingo inso na 14h00

MISA NA ‘LINGALA’

(RITE ZAIROIS)

N.B. - Mpo ya Batisimu esengeli

komiyebisa m’poso isato liboso mpo ya

bolengeli.

- Nganga Nzambe azali mpe

koyamba mpo ya n’tubela mpe mpo ya

kolengele libala lisantu.

Copyright Commission de Communication Sociale de l’Aumônerie Catholique Congolaise de Londres

Mayebisi Nsango ya eklezya, news

RDC : Réééépression de la marche pacifique des chrétiens La marche pacifique des chrétiens pour «commémorer le vingtième anniversaire du massacre des chrétiens et croyants du 16 février 1992 et réclamer la justice et la vérité des urnes et la démission du bureau de la Commission électorale nationale indépendante, n’a pas eu lieu comme prévu. Elle a été réprimée par la Police nationale congolaise en divers endroits de la capitale, où quelques fidèles téméraires. Organisée Conseil de l’apostolat des laïcs catholiques congolais (CALCC), la marche pacifique devait partir de toutes les paroisses de l’archidiocese de Kinshasa pour Saint Joseph de Matonge le point de rencontre finale. Malgré le déployement de la police tôt le matin aux abords des plusieurs paroisses et la mesure d’interdiction par l’autorité urbaine au motif qu’elle aurait été saisie en retard, les chrétiens, à leur tête les clergés sont descendus dans la rue en priant et chantant avec en leurs mains Bibles, chapelets, crucifix, statuettes de la Sainte Vierge Marie et des rameaux. Les chrétiens pacifiques ont subit la brutalité de la police lourdement armée dans des paroisses mêmes. Des gaz lacrymogène ont été lancés dans les enceintes des paroisses et des véhicules anti-émeutes ont été utilisés pendant que les fidèles étaient à la messe matinale pour les bloqués. Plusieurs laics, des abbés ainsi que deux religieuses ont été arrêtées et libérés grâce à l’intervention de la Police de la Monusco. Il a été aussi observé qu’un groupe de jeunes sportifs violents bien connus comme proches d’un parti politique, armés de machettes, ont menaçé de s’attaquer aux chrétiens. La veille, le mercredi 15 février 2012, le gouverneur de la ville province de Kinshasa, André Kimbuta, a interdit, la marche pacifique des chrétiens prévue ce jeudi. Motif invoqué, le Conseil de l’apostolat des laïcs catholiques du Congo (CALCC), l’organe organisateur n’a pas respecté la procédure légale en la matière. Sur les antennes des télévisions controlées par le pouvoir de Kinshasa, André Kimbuta a affirmé que la lettre de notification de la marche est parvenue à l’hôtel de ville en retard. Il a ajouté que le CALCC n’est pas répertorié parmi les associations agréées par l’hôtel de ville. Pour information, le CALCC est une plate-forme favorisant la concertation et la synergie entre tous les mouvements et associations ecclésiaux des laïcs catholiques dans leurs différences et leurs diversités. Il est sous la tutelle de la Commission épiscopale pour l’apostolat des laïcs (CEAL). Ce même mercredi 15 février, peu après le journal télévisé de 7 heures du matin, la Radio Télévision Catholique Elikya (RTCE), émettant à Kinshasa a vu l’interruption de ces émissions. Aucune raison officielle n’a été invoquée pour justifier cette coupure du signal. Se rendant à la société Téléconsult où est logé l’émetteur, la sœur Annie Zama, s’est vu refuser l’accès par les gardiens du site en lui demandant “d’appeler le ministre Mende.” La chaine avait déjà reçu la menace de fermeture en date du 10 février de la part du gouvernement à travers la lettre du ministre de la Communication et des Médias dans laquelle il lui est reproché la « violation des obligations du cahier des charges des médias audiovisuels ».

Protocole & Fete : Protocole & Fete : Protocole & Fete : Protocole & Fete : Likita vendredi 2 vendredi 2 vendredi 2 vendredi 2 mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa mars 2012 na mpokwa epai ya maman Bijou Sindula.

Mpo ya nsango inso ya esengo to ya mawa itali lisanga benga bandeko ba Commission ya Caritas o ba numéros iye mpo ya bopanzi nsango : 07930229408, 07957781758.

To

Aurelie Mataso,

Blessing Kingombe,

Christvie Ngoma, 10 years old

Mabonza ma eyenga eleki £371.01 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 1 Cor 16,2 :" O mikolo mya lomingo

minso moko moko wa biso atia mwa mosolo mpembeni lokola akoki".

Saint Joan Of Arc 60 Highbury Park, Islington, London, N5 2XH Tel : 0207 790 6463 Mob: 0794 467 1275 e-mail : [email protected] Abbé Noël Mpati, Aumônier

Lomingo la 1 la Karezimo o mobu BLomingo la 1 la Karezimo o mobu BLomingo la 1 la Karezimo o mobu BLomingo la 1 la Karezimo o mobu B 26 26 26 26 fffféééévrier vrier vrier vrier 2012201220122012

Aumônerie Catholique Congolaise de LondresAumônerie Catholique Congolaise de LondresAumônerie Catholique Congolaise de Londres

LOKASA YA LOMINGO

Mbango, Likolo,

Makasi

Vers 5 ans

BONGOLA MOTEMA MPE BONDIMA NSANGO ELAMU. Eleko ya Karezimo ebandi. Ntango ya komitala mpe kobongola mitema. Tobengami mpo na kozela, mpo na komipetola, mpo na kobunda etumba mpe lisusu kotala motema malamu mpe loboko ya Mokonzi. Na komitala, tomona masumu ma biso, bozangi bokaboli mpe koboya koyoka Nzambe na kati ya bomoi na biso. Na Karezimo tobengami lisusu mpo na kolanda Yezu na ndenge alongi monguna satana na bikoseli bya ye. Mikolo 40 mikomema biso na Pasika, tozwa makasi ya boyambi na biso mpe tosalela yango. Kristu nde alongoli biso na molili mpo amema biso na mwinda.

KAREZIMO ELAMU NA BINO BANSO ! CONVERTISSEZ-VOUS ET CROYEZ A LA BONNE NOUVELLE. Nous vivons déjà le carême. Ce temps de repentir et de conversion s'adresse à tous. Nous sommes invités à faire l'expérience de l'attente, de la purification, de l'épreuve et aussi de la fidélité de Dieu à ses promesses. Et nous expérimentons en même temps notre péché, notre égoïsme, la médiocrité et l’absence de référence de Dieu dans notre vie. Nous sommes appelés à imiter Jésus qui nous enseigne à vaincre la tentation. Pendant ces 40 jours qui nous mèneront à la Pâques de la résurrection, nous pouvons puiser un courage renouvelé pour accepter patiemment et dans la foi toutes situations difficiles et d'épreuve, avec la conscience que le Seigneur fera surgir des ténèbres un jour nouveau. BONNE ROUTE DE CARÊME A VOUS TOUS !

Abbé Noël Mpati, aumônier

Page 2: Lomingo La 1 La Karezimo o Mobu B

Litangi lya yambo / Première lecture / First reading

Nzambe alingi se bolamu bwa bato: abikisi bango mpe akati na bango bondeko.

Liloba lya Nzambe lokola likomami o buku ya Libandela (9,8-15) 8 Nzambe alobi na Nowe mpe na bana ba ye: 9,,Nakokata bondeko na bino mpe na

bana ba bino baye bakoya nsima, 10 mpe na bikelamo binso bizali na bomoi mpe

bifandi penepene na bino: ndeke, nyama ya mboka mpe nyama ya

zamba, nyama iye inso ibimi o masuwa, nyama inso ya mokili. 11 Nakokata bondeko na bino: moto moko akokufa na mpela lisusu

te; mpela ekobebisa mokili lisusu te.” 12 Nzambe alobi lisusu:

,,Tala elembo ya bondeko nakokata na bino mpe na bikelamo binso

bifandi penepene na bino, mpe na bato banso bakobotama nsima: 13 Natii monama o likolo lokola elembo ya bondeko kati ya ngai

mpe ya mokili. 14 Ntango nakosangisa mampata likolo lya mokili

mpe monama mokomonono o kati ya mampata, 15 nakokanisa

bondeko nakati na bino mpe na bikelamo binso bizali na bomoi. Mai makokoma

lisusu mpela enene te, eye ekoboma bikelamo binso bizali na bomoi.”

(Bomanyoli) Psaume / Psalm / Nzembo 25(24), 4-5ab,6-7,8-9,10.14

E Mokonzi, okamba biso o nzela ya yo. 1. Mokonzi olakisa ngai nzela ya yo, Osalisa ngai nalanda mibeko mya yo.

Oteya ngai bosolo bwa yo; okamba ngai, Zambi mobikisi wa ngai, se yo! 2. Yawe, okundola ngolu ya yo, Bolingi bwa yo, bolingi bwa seko.

Obosana masumu ma ngai ma bolenge, Okanisa ngai se motema bolingi.

3. Mokonzi, oleki motema molanu mpe bosembo, Okozongisa basumuki o nzela ya solo.

Okolakisa bato ba bosawa nzela ya bosembo, Mpe bato ba mawa nzela ya mitindo mya yo.

4. Soko bato batosi mibeko mya bondeko bwa yo, Okosala manso na bolingi mpe na bosembo,

Moto abangi mokonzi akozwa bondeko bwa ye, Mobeko mwa ye mokopesa ye mayele.

Litangi lya ibale / Deuxième lecture / Second reading

Mai ma mpela enene mazalaki elembo ya batisimo. Na batisimo Yezu oyo asekwi

afungoleli biso nzela ya bomoi bwa sika.

Monkanda mwa yambo mwa santu Petro (3,18-22) Bandeko, 18 Mpo ya masumu Kristu awaki mbala yoko seko; ye moto wa bosembo

awaki mpo ya bato bazangi bosembo, mpo ‘te akamba bino o mboka Nzambe.

Babomaki nzoto ya ye, kasi azwi lisusu bomoi na nguya ya Elimo Santu. 19 Bobele

Matangi ma lelo

Matangi ma lelo bongo akendeki koteya milimo mya bato bakangemaki o mboka ya bawa. 20 Kala

baboyaki kotosa, kasi Nzambe akangaki motema. Ezalaki o eleko Nowe atongaki ebei

enene: bobele bato mwambi babikaki na yango o mai. 21 Mai mana mazali lokola

elembo ya batisimo ebikisi bino sikawa; batisimo ekolongola mbindo ya nzoto te, kasi

bato bakokula batisimo mpo ‘te basalela Nzambe na motema molamu mpo ya nsekwa

ya Yezu Kristu. 22 Ye abuti o likolo mpe afandi o loboko la mobali la Nzambe; kuna

banzelu, bilimo bya nguya mpe bya bokonzi bakotosa ye.

Nsango Elamu / Évangile / Gospel

E Mokonzi, maloba ma yo mazali bosolo, makobikisa biso. Moto akobika bobele na

mampa te, kasi na maloba ma Nzambe

Nsango Elamu lokola santu Marko akomi (1, 12-15) Awa Yezu auti kokula batisimo, 12 Elimo atindi ye o

eliki. 13 Aumeli o eliki mikolo ntuku inei; Satana ayei

kosenginya ye. Azalaki o kati ya nyama ya zamba,

mpe banzelu bazalaki kosalela ye. 14 Ntango basilaki

kokanga Yoane o boloko, Yezu akomi o Galilea.

Asangeli Nsango Elamu ya Nzambe, alobi: 15 ,,Elaka

ekoki: Bokonzi bwa Nzambe bokomi penepene;

bobongola mitema mpe boyamba Nsango Elamu.”

Losambo mpo na Congo Nzambe, Totondi Yo, tokumisi Yo, Okeli mboka Congo mpe otondisi yango na bomengo ndenge na ndenge, Yo opesi biso mboka oyo Congo, Tozali kosenga Yo tinda Elimo Santu epai na biso ba congolais, Mingi mpenza na baye balingi kokamba mboka oyo Congo, Pesa bango bwanya mpe mayele ya kobanga Yo mpe ya kolinga mboka na bandeko banso, Simba mitema mya moko moko mpo bazwa makanisi kitoko maye makotombola mboka oyo Congo, Congo ezala mboka ya boboto, ya boyokani, ya bosembo mpe ya esengo, Mama Maria omema mboka oyo Congo, osambela mpo ya biso, Mwa-esengo Bakandja, Mwa-esengo Anuarite, bino bana Congo, bosambela mpo ya biso, Tosambeli na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya Elimo Santu, Amen.

● Mikolo minso mya vendredi o eleko ya Karezimo, tozali na Nzela ya Kuruze awa na paroisse na ngonga ya 17h30. ● Campagne ya Karezimo: tokokongola bilambi mpe mosolo mpo ya kosalisa na Congo. ● “Catholics” ezali film ezali koleka mikolo mia minei na 21h na BBC4. Yango ekolakisa ndenge nini mokristu katoliko azali lelo awa na UK.